RDC ekoti na eteni oyo elandi ya Mundial 2026 nsima ya kolonga Ouzbékistan na ndenge ya kozongisa lisano.
Na Mercedes-Benz Stadium na Atlanta, République Démocratique du Congo ezwi esika na eteni ya ba 32, epai ekokutana na Angleterre. Ezali mbala ya liboso na lisolo na yango kokóma na eteni ya knockout, nsima ya kolonga Ouzbékistan na score ya 3-1 na lisano ya suka ya eteni ya bituluku.
Ba Léopards babandaki lisano malamu mpe bazalaki na bokonzi ya jeu. Kasi na miniti ya 10, ba Loups Blancs bafungolaki score na nzela ya Shomurodov, oyo azwaki litomba na libunga monene ya défense ya Axel Tuanzebe mpe Aaron Wan-Bissaka. Nsima ya but wana, Ouzbékistan ekómaki lisusu makasi mpe elukaki kobakisa but ya mibale.
Ekipa ya Sébastien Desabre ekómaki pene ya kokokisa score na miniti ya 18, kasi but ya Mbuku eboyamaki mpo na faute offensive na ebandeli ya action. Mwa moke na nsima, Nathanaël Mbuku abetaki pote na tir moko ya makasi.
Ba Léopards batikaki lisano te mpe bakobaki kotia pression. Na miniti ya 67, bazwaki penalty nsima ya faute likolo ya Yoane Wissa. Wissa abetaki penalty yango malamu mpe akomisaki score 1-1.
RDC ekobaki kotia pression mpe na miniti ya 78, Muleka Magele (Mayele) akomisaki score 2-1. Na tango ya kobakisa, Wissa asilisaki lisano na but moko ya kitoko na tir ya makasi mpo na score ya suka 3-1.
Ba formations ya bituluku
RDC (Sébastien Desabre): Mpasi, Wan-Bissaka, Tuanzebe, Mbemba, Masuaku (83′ Kayembe), Mbuku (72′ Elia), Moutoussamy (72′ Mukau), Sadiki, Sipengga (72′ Bongonda), Bakambu (51′ Mayele), Wissa.
Ouzbékistan (Fabio Cannavaro): Nematov, Khusanov, Alijonov, Ashurmatov, Nasrullaev, Urozov, Mozgovoy (82′ Iskanderov), Sukurov (59′ Kamrobekov), Kamdamov (59′ Ganiev), Fayzullaev (73′ Urunov), Shomurodov.